Yesu, moto oyo ayebi kosolola malamu
Yesu, moto oyo ayebi malamu makambo ya kosolola na bato
Yesu azalaki kotya likebi na batu mpe azalaki na elobeli maloba polele
Yesu azalaki moto oyo ayebi kosolola malamu.Azalaki kosalela elobeli ya polele, pɛtɛɛ mpo na kokanga ntina na yango.
Yesu asalelaki maloba ya pɛtɛɛ
Azalaki koloba (koteya) na nzela ya makambo esalemaka na bomoi oyo emonani pona kolakisa mintinda (mibeko) ya molimo, to koteya mateya ya litomba mokolo na mokolo, to lisusu pona kolakisa (komonisa) bizaleli ya Nzambe.
Yesus asalelaki misala ya bato mpamba (komela, kolia, kopema, kolata, kopanza, kolona, kosukola, komibikisa na maladi, kosala feti, biloko mosusu…).
Na masese na ye yesu kolobela mpo na mai, bilei, lipa, kopema,bilamba, libota, misala ya ndako, mbóto, banzete, milona, maladi mingi, liwa, bomoi, feti, boninga, libala, botata, liyaka ya motuya, eloko ya motuya, biloko mosusu.
Talá mwa bandakisa
– Na mwasi ya mosamaria ayaki kotoka mai na liziba, amitalisaki ndeti mai ya bomoi. Mai oyo ekoki kobondisa, kokokisa mposa ya komela ya kati (motema).
– Na ebele ya bato oyo apesaki bilei nasima abakisaki mapa, amilakisaki ndeti lipa ya bomoi, oyo eliesaka molimo ya bato, mpe oyo akokisaka nzala ya molimo.
– Na Yakobo, Yoane na Simo bazalaki baluki mbisi na laki (libeke) ya Genezarete Yesu asakolaki bango bakokoma baluki bato. (Mat 4.18; Luk 5.10).
Lelo lisusu, kokomisa makambo pasi te tango ozali kosolola na bato nanu bandimeli Yesu te. Soki tozali kotiela mpenza likebi na bato na oyo tozali koteya, tolakisi bolingo, tokomikitisa mpe tokoyekola ntango tokosolola na bango, tokomona makambo oyo ekosunga biso tango tokoteya bango kokutana na mobikisi na bango.
Pona kopesa ndakisa moko, tokanisa tozali na moloni to na mosali-bilanga, moloni-ndunda, motongi-ndako, moto oyo asalaka misala ya kobongisa bisika, mosali ya kolona ba fleurs (máyí), biolojiste, moto oyo ayekolaka mabele to lisusu moto oyo atangaka bizaleli ya mabele, yoka bango kolimbola mabele.
Ezaleli ya kozala na ntango ya bosangisi maloba
Tozala kosepela bolimboli na bango mpe toluka na nzela ya losambo ndenge nini tokoyokanisa boyebi na bango na solo ya elimo oyo ekosunga bango kokutana na Nkólo.
Ezali te maloba mingi oyo ekobima na monoko na biso, nde ezali na motuya, kasi kozala na biso… lolenge (ezaleli) ya kozala na biso oyo ekomema bokutani ya solo Ndeti Yesu tozala na motema efungwama pona balobani na biso, lolenge nini bazali. Na bolingo ya solo, komonisa koyoka bango.
Tótya likebi na maloba na bango ndenge moko Nzambe alingi kolobela (koyebisa) bango. Ndeti Yesu totosa bango, mpe tozala na mayoki (makanisi) malamu pona bango. Boyokani (Boyebani) ekozala malamu.
“Nkolo nazangi bwanya mpe na sengi yo yango, mpo ete nalingi kokola na lolenge ya kosolola (kabola) na bato. Yo mosali ya maloba, yo moto okendaka kosolola na bato. Yo osepelaka na bango, mpe opesaka bango kozala na yo, sopa bolingo na yo na kati ya motema na ngai mpe, pesa bolingo yango likolo ya balobani na ngai, ndenge olingi.”
Yesu azalaki mpenza moto oyo ayebi kosolola malamu!
Yesu, mosali ya bopanzi sango!
Yesu : moto oyo ayebi malamu makambo ya kosolola na bato!
Ngolu mpe bolamu ya Nzambe ezali ntango nyonso na bino!
Lekisa mokolo malamu!