Litatoli ya Jessica, moluki wolo (2)

Yasolo! Nazali moluki wolo ya mwasi! Nazali kokende na mai ya pompi sipesiale ya Biblia mpo na koluka wolo ya mwasi!

Moto oyo azali kotimola wolo na

Nayekolaki ete Biblia etonda mintinda ya tina mpo na bolamu ya bato mpe mpo na bilaka na Nzambe mpo na bana na ye. Nalokotaki yango na botangi na ngai mpe nakokoma yango na kaye. Bilaka ya Nzambe elendisaka ngai, ebondisaka ngai mpe epesaka ngai kimya na ntango ebongi, mpo eyebisaka ngai na nani nandimela, mayele nini mpe makoki nini azali na yango mpo na baoyo bakotyaka elikya epai na ye.

Poso na poso, nazalaki kozwa mwa ntango kolanda, komanyola mateya ya biblia na mongongo na likambo moko, mpo na kozala na loboko kati na Yesu Kristu. Lisusu nazali kolanda programme moko natye mpo na botangi ya Biblia na mbula moko mpo ozala na koyeba mokuse. (Mikapo misato na kati ya Kondimana ya Kala mpe moko na Kondimana ya Sika.)

Kokutana na bandako mpe kokabola na ntina ya Biblia na bandimi mosusu ezali mapamboli mingi; mpe na mateya ya losambo, kasi ntango mosusu mwaye ya kokende makita yango ezali te; yango wana na kotalela makoki na ngai nayokaka yango na nsima.

Kosola makambo oyo bamoni, lokola bato oyo batimolaka wolo

Na botangi na ngai mpe boyekoli ya biblia ekesena oyo tolobeli, nayebaki malamu na mokano ya Nzambe, nazali koyeba koyekola makambo oyo esepelisaka ye to oyo alingaka te, bomoi ya mokolo na mokolo na mobimba na yango ezali kokende malamu mingi.

Na ndakisa, makambo nini nasalaki kosala ntango na kutanaki na mikakatano. Na komimesenisa kotombola miso na Yesu mpe kosepela na ntago ya sikawa, naboyi kotika makanisi na ngai kotambola pambapamba. Natungisamaki lisusu te na makambo oyo ekoki kokoma to kokoma te, sikoyo natalaka makambo ndenge ebongi. Nazali kokanisa malamu mingi. Ntango mosusu ezali pete, ntango mosusu ezali mpasi, tosengeli kolemba nzoto te…

Lokola bato oyo batimolaka wolo, motivation na ngai ebalukaka

Kasi, lokola moluki wolo, botindiki na ngai (mpo na Biblia) ebongwanaka, kutu soki nakanisi misala nyonso oyo nakosala, mpo na mosala na ngai, bomwasi na ngai, bomoi na ngai ya mama, ndeko mwasi, bokilo, moninga, biloko mosusu. Namonaki ete ntango nazali kokumisa Nzambe mpe soki nalekisi ntango elongo na ye, azongiselaka nga yango. Na ndakisa, na mbala moko mobali na ngai akopesa ngai likanisi tokokisa makambo oyo nazalaki kokanisa, to nakosala mosala malamu. Boye nazwi ekateli kopesa ntango ata moke mikolo nyonso kotangaka Biblia, atako nazali koluka komilongisa.

Mpe natangaka yango, atako nzala ya molimo ezali monene te… Lokola lisese moko elobi «nzala etindaka moto alya»? Yango wana, atako nazali na boyokani mobimba te na Nzambe to soki elukaka naino komesana na mposa ya biblia, naponi kotanga yango… ntango mosusu esengaka ngai ntango mingi mpo botangi ebongola motema na ngai, kasi namikitisaka mpe mapamboli elandaka!

BIBLIA, OYO BUKU YA BIKAMWA,

ezali na motuya lelo lisusu!

BIBLIA ekomama mpenza na bato

bapemami na Nzambe ya bolingo,

mpo na bato ndeti yo na ngai!

Nasepelaka na liloba na yo lokola moto oyo azwi bomengo ebele ya bitumba(Nzembo 119.162).

Jessica, moluki wolo ya mwasi

Ozali motimoli ya wolo oyo asepelaka na Biblia?

Ngolu mpe bolamu ya Nzambe ezali ntango nyonso na bino!

Lekisa mokolo malamu!