Koyamba bolimbisi ya Nkolo, kondima yango 

Ntembe ezali kobundisa ngai

Eyelaki ngai makanisi ete naboyaki komona mabungà na ngai liboso na Nzambe mpe mbala na mbala natyia ntembe na bolimbisi ya Nkoló mpo na ngai, mpo nazalaki koyoka yango te.

Liyoki ya kobulungana

Nazalaki koyoka mpasi na motema, polele te, ya kopalangana, ezalaki kolembisa ngai.

Nini ezali moboko ya bolimbisi ya Nzambe?

Nzokande ntoma Yoane azali koyebisa biso ete tobosana te ete bolimbisi ya Nzambe ezwi mokobo na makila ya Yesu oyo ezali kopetola biso na masumu nyonso mpe soki tozali koyambola masumu na biso, Nzambe azali sembo mpe moyengebene mpo na kolimbisa biso na lisumu nyonso (1 Yoane 1:7-9).

Ntoma azolobela biso lisusu ete Yesu-Kristu azali molobeli na biso, tozali na mosungi moko (2:1-2).

Parakletos...Molobeli, mobundeli!

Awa basaleli liloba parakletos, oyo elingi koloba, Mobundeli Mobondisi, mpe na Yoane 14:16, mosungi oyo, Mobateli oyo azali Molimo oyo efandi libela elongo na biso mpe ezali kati na biso!

Ndenge nini ekoli kosalema?

Na kosopa makila na Ye, Nkolò afutaki motuya ya masumu, yango wana tosukolama, peto, tosikolama na minyololo, bonsomi, mpo tozala na boyokani na Ye. Boye ntangò toyamboli masumu na biso, tokokanisa lisusu yango te. Nzambe abosani yango. Likambo yango esuki wana! Kokweisama esili! (Roma 8).

Bondimisi ya biblia

Na buku ya baebre 10, ekomami ete:

« Mpe nakokanisa lisusu te masumu na bango mpe misala na bango ya kobuka mibeko. »

Ntango mosusu tozalaka na boongo koleka Nzambe! Mosakoli Mika asalelaki ndakisa mpo na kokamwisa biso mingi: akomaki ete Nzambe abwakaka masumu na biso na bozindo ya mbu. Boye masumu ezali mosika!

Na yango mayoki… ekosaka biso!

Boye nde, nasepelaka kotya motema na liloba ya Nzambe na esika ya kotya motema na makanisi na ngai moko.

Bozala na boyokani malamu na Nzambe!

Nayambi bolimbisi ya Nkolo, nazwi yango

Na yango, tika ete tondima bolimbisi yango! Tozwa yango mbala moko epai ya Nkolo!

Nazwi ekateli ya kondima lisusu lokuta te

Mpe soki Satana, tata ya lokuta, alukaka kopusa biso kotya makanisi na makambo oyo elekà mpe kosala ete tomiyoka ngambo na kosala ete tomiyoka malamu te, tomibombama sikoyo epai na Nzambe mpo na kosepela na boyokani oyo ezongisami, mpe kimia tozali na yango elongo na Nzambe, mpo matata kati na Ye na biso ezali lisusu te, to kati na biso na Ye. Baoyo bazali na bomoko na Kristo Yesu bakwei na likambo te (Roma 8).

Nazali kozongisa makanisi na ngai…

Tomipesa na Nkolo mpo tokangolama mpe tozala na bonsomi na epekiseli nyonso, tofandaka na boyokani na ye, kati na kimya na ye, kati na esengo na ye mpe totondisama na kozala na ye mingi lisusu, na bomoto na biso mobimba.

Nasakoli maloba ya Biblia, bosolo

Mpe soki boyoki na biso ezali kokosa biso, toloba bosolo ya biblia, oyo ezali makambo ya solo:

  • Nazali na molobeli, Yesu, makila na ye ezali kopetola ngai na masumu nyonso. Azali koloba mpo na ngai! (1 Yoane 1:7,9 ; 1 Yoane 2)
  • Nakwei na likambo moko te! (Roma 8)
  • Nzambe akokanisa lisusu masumu na ngai te! (Baebre 8:12 na 10:17; Mika 7:18-19)
  • Molobeli oyo afandi kati na ngai lokola molimo oyo azali kopesa bomoi! (Yoane 14:16)
Epekiseli moko ya makasi

Makambo yango ezali kotelemela kokweisama mpe makanisi nyonso ekoki kotungisa biso! Tozali na bondimisi ya bolimbisi ya Nzambe na mobimba. Toyambi bolimbisi ya Nkolo, toyambi yango ofele!

Na nsima, na motema na biso ya botondi, masanzoli mpo na Nzambe biso  ebimi!

Koyamba bolimbisi ya Nkolo,

kondima yango

Natondi yo Nkolo! Nzambe azali mpo na bino! Bolekisa mokolo malamu baninga!