Nzambe asalaka na mozindo ya bomoi na biso (2)

Komanyola

Nzambe asalaka na mozindo na bomoi na biso (2)

Azali kobongisa bizaleli na biso

Kosantisama, ezaleli oyo emonani ete ezali ya kokoka?

Mbala mingi tokokanisaka liloba «kosantisama» na kozanga mabunga, kozanga mbeba, kokoka. Na miso na biso, kosantisama elakisi bosantu mpe tondimi ete mosantu azali moto oyo asalaka lisusu mabunga te.

Kosantisama, kozala ya Nzambe

Kasi, likanisi oyo ekokani ata moke te na ndimbola ya solo ya liloba «kosantisama». Na ndimbola na yango ya libosoliboso, liloba «mosantu» elimboli «kozala ya Nzambe.»

Na bongo, mosantu azali moto oyo azangi mbeba te, kasi azali moto oyo azali kokamba bomoi na ye engebene na bozali na ye ya Nzambe. Azali moto oyo atikaka Nzambe asala na mozindo na bomoi na ye, na nzela ya Molimo Mosantu oyo afandi kati na ye.

Na boyokani na Ye

Na boumeli ya bomoi na ngai, Nzambe apesaki ngai mabaku mingi ya kozwa mikano ya malamu, na maloba mosusu mikano «ya bule», bikateli miye miyokanaki na Ye. Namoni ete Nzambe alingaka kokende elongo na ngai na makambo oyo epesaka ngai libaku ya kokokana na Ye, ya kozala na boyokani na Ye.

Moninga na ngai moko, Richard Clinton, asalaki bolukiluki na bakambi ya elimo koleka 30.000 mpe atalaki lolenge bazalaki kotambola. Akomaki na resultat oyo elandi: engebene ye, Nzambe akolisa BILOKO MINEI YA NTINA na bomoi na bango:

BILOKO MINEI YA NTINA
1. BOSEPELI

Nzambe atie batu oyo na makambo oyo bosembo na bango ekoki komekama: ezali  na nzela ya lokuta oyo esengelaki kobatela elilingi na bango nde bakoluka kobima na likambo moko ya mabe to kobima na likambo ya kokangama? to bazali baninga oyo bakoki kotyela motema mpo na Nzambe?

Oyo ezali momekano ya bosembo.
2. KONDIMA

Bazali mpenza kotyela Nzambe motema ata soki makambo nyonso ezali komonana lokola ezangi elikya? Nzambe akoki kotalela bango lokola baninga to batalelaka Ye kaka lokola Moto oyo atikaka ete bamposa na bango moko ekokisama?

Oyo ezali momekano ya kondima.

3. LILOBA YA NZAMBE

Esika nini bapesaka na Liloba ya Nzambe na bomoi na bango? Bazali kotindama na bobangi ya etumbu ya Nzambe to ezali nde bolingo mpo na Nzambe nde ezali kotinda bango bázala sembo na Liloba na Ye? Nzambe akoki komona ete balingaka mpenza Liloba na Ye? 

Ezali momekano ya esika oyo Liloba ya Nzambe ezwi na bomoi na bango.

 4. KOMIKITISA

Tokoki koloba ete lolendo ezali moko ya bibundeli oyo monguna ya Nzambe azali kosalela mpo na kobundisa bato. Komikitisa ezali makoki ya kotala na moto ye moko te, kasi na lolenge ya Nzambe mpo na bolamu ya bato mpe mpo na mosala ya malamu na bokonzi na Ye.

Nzambe atikaka bakambi wana oyo bazali kobima bazala na makambo oyo epesaka bango libaku ya kosala na komikitisa, ntango tozali kozanga kotalela bango to ntango tozali kobwaka bango, to ntango tozuaka bango na liseki…

Oyo ezali momekano ya komikitisa.

Nzambe, Ye, amonaka mitema na bango mpe apesi bango nzela ya kokutana na bozalani kitoko elongo na Ye. Na maloba mosusu, atako bato batindi bango pembeni, bakoki koyoka ete Nzambe azali penepene na bango.

 

 

 

Biblia-KONDIMA-LILOBA YA NZAMBE
Na bosolo…

BOSUKISI YA Richard Clinton ekoki KOSALEMA MPO NA BAKLISTU NYONSO YA BASI MPE MIBALI, MPO NZAMBE ALUKAKA NTANGO NYONSO KOBONGISA BOMOTO MPE BIZALELI NA BISO NA KOSALELA MAKAMBO OYO TOZALI KOKUTANA NA YANGO, MPO TO BIMISA NZAMBE NA KITOKO NA YE NYONSO.

Na nzela ya makambo ndenge na ndenge oyo tokutanaki na yango, Nzambe asalaka na mozindo na bomoi na ye.

Mpo na kosukisa

Nzambe asalaka na mozindo na bomoi ya bandimi, Ye nde abongisaka bizaleli na bango.

Bongo mpo na nini kobika na kobanga misala ya Nzambe? Nzambe asalaka na mozindo na bomoi na biso.

Totika Ye abongisa biso, asalaka nionso na ndenge ya kokamwa!

Martin BUEHLMANN