Kopema mwa muke to esobe? (1)

Nazalaki na esengo mingi komipesa mingi na makambo ya solo na mosala ya lelo, mingi mpe ya lolenge ya kokamwa to na mikakatano.

Lokola moclisto mpe na mposa Nzambe azala na esika monene na kati ya bomoi na ngai, Na bongisa ntangó mpona Nkoló mokolo na mokolo mpona Liloba na ye mpe losambo, mpe na saleli malamu na ntangó ya kozwa mwa mopepe na kati ya mosala ebele ebele mpona kotala epai na ye mpe kosolola na ye. Na lukaki kozala ni Clistu malamu mpenza mokolo na mokolo. Mpe oyo nde, nalekisaki mbala ebele baposo mobimba na biteyelo ya seminele ya Biblia oyo elendisaki ngai mingi.

Libyangi ya kotika, mpe ya kopéma

KASI na katikati ya motema na ngai, eloko moko ezalaki koyebisa ngai na telema, na pema mpona kokutana  ngai moko na Nkoló, mpona boyokani makasi lisusu, kozanga kopusama na ntango, kasi mpona ngai ezalaki mpasi mpo na ponaki komipesa mpona eklezia to bato mosusu na esika ya kolekisa ntangó wana na ye.

Kotika nyoso mpo na kolekisa ntango na Nkolo?

Lelo na sosoli ete Nzambe azali kobenga bana na ye nyonso bafanda na ye, bomoko na ye, mpo alingi batala ye, « batondisama » na kozala na ye mpe bopusi na ye; alingi kolobela bango mpe kosimba bango kati na mizindo ya motema na bango mpona kobikisa bango. Nazali komituna soki tozali kokumisa libyangi na ye?

Tozali kokima bantango oyo ya boyokani ya sukali?

Emonani ete tolukaka komilóngisa mpona kozelisazelisa ntangó mpembeni tokoki kolekisa na Nkoló. Tozali kokoba kokima na loboko ya mwasi mpe na loboko ya mobali lokola bampunda ya makasi boye nde na pokua tokanisi mokolo elekani malamu.

Mpe soki ntango mpona kopema mwa muke eye, Tozali kolobela na Nzambe kokanisaka esengeli azala wana na ntango oyo ya muke mpe na esengo ya mwa miniti moke tozali kopesa ye! Elekisi ndelo, elimboli oyo? To penepene ya Bosolo?

Mwinda ya motane mpo na bolamu ya kobikisama ya mitema na biso

Soki bomoi na biso ekokani na bilakiseli towuti koloba, ekomaka ete Nzambe apesaka biso makebisi mpona kolendisa biso to telema. Ezali elembo mpona kolakisa nzela? Ya mibeko? Mwinda ya mosaka? To ya motane bakomi « telema »?

Basusu bayebaka makebisi bazwa: basosolaka yango, batelemaka mpe babongolaka lolenge na bango ya kofanda. Basusu bazali kokoba lisusu, kotya motema na baverse ya biblia mpona kokende liboso na ekateli makasi…oyo ewuti ya mosuni! Ngai mpe nazalaki boye.

Motuna mpo na komitalela

Mbala ebele na mpona koteya na esika ya ntango ya kopema, kokima, kozala yo moko. Ezali na ntango yango nde bokonzi ya Nzambe, nazalaki komona mbala ebele mwa makambo esalemaki ete na pema moke; motuna mpo na komitalela etelemelaki ngai, mpe soki na zongisi makanisi nsima, nakoki kotatola ete ezalaki mpona bolamu na ngai.

Mikakatano wana ezali Nzambe te moto azali kotinda yango mpe/to makambu mingi ya mpasi, kasi akoki kopesa yango nzela soki ekoki komema lobiko ya motema, libongoli na biso, kosantisama.

Esobe, ntango ya sipesiale mpo na koyoka Nzambe

Na kati ya Biblia, esobe ezali elimboli ya komekama, ntembe. Kokatisa esobe ezali kolekisa ntango kafukafu, ntango songolo oyo Nzambe azali kolobela koleka ndenge motema na biso, esika kozala na ye ezali solosolo; na ntango wana kozala ya Nzambe ezali mpenza kitoko mpe tozali kosepela na yango. Boyokani na Ye ezali kokoma makasi mingi mpenza.

« Yango wana, nakobuka ye motema, nakomema ye na esobe ; mpe kuna, nakoloba na motema na ye maloba na bolingo.» (Oze 2.16)

Nzambe azali mpona bino!

Bolekisa mokolo malamu!

Nsango oyo ezali na continuation na

“Kopema mwa muke to esobe (2)