Nandimi bomoto na ngai oyo ezwami

Litatoli ya Naylleley

1. Kozanga tata…

Nayebaki tata na ngai malamu mingi te, mpo alongwaki na ndako ntango nazalaki na mbula 3. Kozanga na ye ememaki ngai liyoki moko ya kobwakama  mpe kozanga libateli. Nayokaki lokola nazalaki malamu te na miso na ye mpe ntango nazalaki kokola mpe nakokakite komonisa bomoto na ngai.

Kokutana na Yesu ntango nazalaki na mposa ya kobikisama

Ntango nakutanaki na Nkólo, nayokaki mwa malamu kati na ngai.

Nazalaki na mposa ya kobikisama tango nakutanaki na Nkolo

Nsima ya bokutani na ngai na Nkolo, mayoki na ngai ya mabe (mayoki ya kosundolama mpe ya koboya) ebandaki kolimwa.

Nazali na likoki ya komimonisa

Sikawa, nazali na makoki ya komimonisa, nzokande nazali naino komemya basusu ya solo. Nzambe azali kokoba kobikisa ngai  ntango nazali kokolisa bozalani makasi na Ye.

Nandini bomoto na ngai oyo ezwani

 

2. Mama na ngai, mopaya

Nkóko-mwasi moto abokola ngai mingi, mpe mama na ngai azalaki ndeti mopaya mpo na ngai. Boyokani na biso ezalaki malilimalili.

Nayokaki bolingo mingi te epai na ye, nalukaki bolingo yango esika mosusu.

Kokutana na Nzambe ebongoli motema na ngai, bolingo na ye ezingaki ngai. Námoniselaki bolingo mpo na mama na ngai mpe boyokani na biso ekomaki makasi.

Nandimi bomoto na ngai oyo ezwami

Naylleley

Le Tout-Puissant n'agit pas seul