Mabondeli oyo ezali komema libongoli ya bizaleli (1)

Komanyola, Litatoli

Mabondeli oyo ezali komema libongoli ya bizaleli (1)

Litatoli ya Jessica

Mposa na ngai ezali makasi, kokende liboso elongo na Nzambe. Yango wana nabondelaki nsima ya kotanga Bagalatia 5.22-23:

Kasi mbuma ya Molimo ezali: bolingo, esengo, kimia, kokanga motema, bondeko, kosala bolamu, kondima, boboto mpe komikanga.  Nalingi kobota mbuma oyo mpo na nkembo na yo, Nkolo!

… Eyaka momekano

Nzambe ayokaki libondeli na ngai! Bolingi koyeba ndenge nini? Boye! Noki mpenza nakutanaki na mikkakatano na moto moko mpe na likambo oyo ezali kosilika ngai mpe komiyoka ete nalembi, kozala kati ya mikkakatano… Nazangi mpenza makasi! Boye nde nasosolaki ete nazalaki kokela makoki na motema molai mpe boboto mpo na ezaleli malamu.

Losambo na ngai: Nkolo, na ngonga oyo mpenza, tondisa ngai na kimia na yo

Kati na motema na ngai, nabondelaki, nagangaki n Nzambe oyo azali kati na ngai:

“Nasengi lisalisi! Nakokoka te kosplpsa likambo moko boye/moto moko. Nayebi te nini nasengeli kosala. Nazali na kozela makasi mpe kosilika na ngai napesi yo, napameli mpe naboyi yango. Nasengi bolimbisi, Nkolo! Sukisa mosala mpe sunga ngai, lakisa ngai boboto na ntango oyo! Matondo, Nkolo, kati na yo namoni motema molai mpe boboto na “…”.

Nazali koyamba mbuma ya molimo epai na yo mpe komonisa yango sikoyo polele. Otondisi ngai na kimya na yo, motma molai na yo, ezaleli ya boboto na yo.”

Nakoma koyeba mabunga na ngai na nzela ya makambo

Ntango mosusu esengeli tokutana na makambo to bato mabe mpo toyeba ete makoki na biso esuki mpe mposa na biso ya Nzambe.

Mbuma ya molimo to tangu mosusu eloko moko ya pampa ya bomoto mpe ya bozalisi?

Motema molai mpe boboto, tozali komona yango kati na Ye oyo azali kati na biso; tozali kozwa yango kati na ye kotalaka na Ye; boye nde tozali kolendisama mpe tozali na makoki ya kobota mbuma ya Molimo; na nsima tokoki koloba elongo na Paulo:

Ezali ngai lisusu te moto nazali na bomoi, kasi ezali nde Kristo moto azali na bomoi na bomoko na ngai.”

Nazali kosala elongo na Nkolo

Na maloba mosusu, soki tolingi kosala na bomoko elongo na ye, Molimo Mosantu ekoki kosala kati na mokomoko na biso mpe na motema na biso. Azali kobimisa lisusu mokemoke bizaleli ya Yesu Kristu. Na nzela oyo ya libongoli ya motema, tozali komonisa mbuma ya Molimo mpe tokoki koloba elongo na Paulo:

“Ezali lisusu ngai te moto nazali kobika, kasi ezali Klisto nde azali kobika kati na ngai. Bomoi oyo nazali kobika sik’oyo kati na nzoto na ngai lokola moto, nazali kobika yango na nzela ya kondima kati na Mwana na Nzambe, oyo alingaki ngai mpe amikabaki mpo na ngai” (Bagalatia 2.20)

Bolamu ya Nzambe ezali ntango nyonso elongo na bino.

Lekisa mokolo malamu!