Bolimbisi, liziba ya kokangolama
Bolimbisi, liziba ya kokangolama

Bolimbisi, liziba ya kokangolama

Ntina ya lokimbisa mpo na kozwa bonsomi

Mbote, baninga! Ntongo ya lelo, na lingi kosolola na ntina na moto moko kombo na ye Yobo, kasi na lingi kosolola na ntina na ye na ndenge mosusu oyo bato balobaka na ntina na ye!

Yobo

Yasolo, Yobo azali na nzoto kolongono, azali na mwasi mpe bana, mpe bozwi mingi. Lelo bato bakoloba ete kolonga ezali elongo na ye.

Yasolo, Yobo afandi na limemyiá mpe bolingo.

Na kati ya ko nyiokwama, Yobo azwi lisungi na ba ninga na ye te

Kasi likambo nini na nsima? Baninga baye kobondisa ye, kasi bazali kofunda ye koleka lisusu, mpo bazali kotya motuya na etaleli (makanisi) na bango mpona ntina ya moninga na bango.

Makanisi mabe ya baninga na ye

Na ndakisa, bazalaki kokanisa ete mikakatano nyonso ezali mbuma (ememelaki) ya lisumu, ezali lokuta. Kasi bango bandimi yango, bazali komeka komemisa Yobo ngabo mpo àbongola motema. Moko azali koloba ezali lofundo mpe etumbu ya Nzambe mpona komema Yobo amikitisa.

Baninga na ye bazali koloba mingi, kasi na  lolenge yango, maloba ya komonisa ye foti ezali kosunga Yobo te, soko moke te! Ata mwasi na ye azali kosunga ye te.

Yobo atikalaki ye moko

Moto moko te azali komityia na esika na Yobo, azali ye moko na mpasi makasi. Nde azali komona mpasi na mosuni, bizaleli malamu, makanisi. Ezali bandoto ya mabe, nzokande nyonso oyo ezali solosolo!

Kasi Yobo azali kokoba na kokangama na Nzambe, na ye azali kolela mpasi na ye nyonso mpe bozangi kososola nyonso oyo ezali kokomela ye. Nzambe azali kolobela ye na ntina ya makambo na ye.

Aponi kolimbisa

Na suka ya buku ya Yobo, na Mokapo 42, molongo 10, ekomami ete Nkoló alongolaki Yobo na kati ya mpasi oyo azalaki na yango ntango ye abondelaki mpona baninga na ye.

Esimbaki motema na ngai mpona moto oyo Yobo oyo akobaki koluka Nzambe, mpe apambolaki baoyo bazali zingazinga na ye na esika ya kolanda mibeko ya ntago wana oyo ezalaki kozongisa mabe mpona mabe.

Linga banguna na yo, pambola bango

Yobo aboyaki bampamela to kozongisa mabe… abondelaki mpona baninga na ye. Bizaleli na ye ezali lokola verse oyo ya Matai 5 Yesu azali koloba boye:

“Bolinga banguna na bino, bopambola baoyo balakelaka bino mabe, bosala bolamu na baoyo bayinaka bino, mpe bobondela mpona baoyo banyokola bino, mpo bozala bana ya Tata na bino na likoló.”

Na lisoló ya Yobo, tomoni ete kobondela mpona “baninga-nguna” na ye ememelaki moto atungisami kozongisama. Na kati ya losambo ezali sekelé, mingimingi kobondela mpona baoyo bazali konyokola biso. Bolimbisi ezali fungola. Losambo ekitisaka motema; epetolaka yango mpe epesaka yango makasi.

Bolingo mobimba etondisaka motema, lokola nkisi ya kopakola likolo ya nzoto babomi. Kosikolama ya nsolo!

Yobo asali boponi ya kolimbisa moto nyonso mpe kosepela na bonsomi ya moto ye moko mpe bozongisi

Liziba ya bonsomi ezali kosopana! 

Ayambaka bango mpe apambolaka bango

Yobo ayebaki kokaba na bato nyonso, na bato ya penepene, kasi mpe na ebele ya baboyi nsango, baoyo bayebani te. Kutu ntango azongisami Yobo ayambi bandeko mibali na basi, baninga nyonso, apesi bango bilei, na kati ya ndako na ye. Oyo motema malamu, boboto.

Na koponaka kolimbisa bato nyonso,

Yobo azwaki bonsomi ya mozindo

Nzambe azali mpona bino, baninga!

Bolekisa mokolo malamu!

Lisolo oyo elobelami na malako 6:

Yobo - Bolimbisi, liziba ya kokangolama