Bokeseni na biso ememaka matomba mingi

Komanyola

Le Tout-Puissant n'agit pas seul
Le Tout-Puissant n'agit pas seul

 

 

Le Tout-Puissant n'agit pas seul

 

 

Le Tout-Puissant n'agit pas seul

 

 

Le Tout-Puissant n'agit pas seul

Bokeseni na biso ememaka matomba mingi

Nzambe akoyamba biso malamu. Kozanga mintinda, kozanga kosenga. Ndeti tata ya mwana na kilikili ya lisese na buku ya Luka 15. Atyaka likebi na biso, amonisaka boboto; Tozali na motuya na miso na Ye.

Klisto ayambi biso, yo lokola ngai, na makambo na biso ya sikisiki

Mpe wana, tozali komona ete ntango tozali kotambola na Nzambe ya bolingo, nazali kosepela mingi na baninga, Nazali koyamba bango ndenge nkolo ayambaka ngai. Yango wana, nazali kokanisa libyangi ya Paulo na kati ya mokanda ya Baroma :

Boyambanaka, lokola Kristu ayambakaki bino, mpo na nkembo ya Nzambe.” (15:7).

Bokeseni: oyo ekoki kobismisa matata to kobakisa makambo mosusu

Lingomba ya Roma eyambaki bato oyo bazali na mimeseno ndenge na ndenge!  Bayuda na bato ya bikólo mosusu, bawumbu mpe bansomi, bato na mbongo mpe babola, bato ya makasi mpe bato na bolembu; bato nyonso wana bazalaki koyokana te. Mimeseno na bango mpe bato ya bozwi ekesena, ndeti bolongobani na bango mpe mimeseno na bango… na mokuse, bokokani kati na bango ezalaki pete te…Matata ebotaki kati na bango!

Tokoki kosala nini? Kosolola mingi te na basusu? Tokima bango mpenza? Kobima na ligomba mpe kokela mosusu? Ntoma Paulo azali kolendisa bandimi ya eklezia oyo bafanda na boyokani na basusu, koyambanaka, ndeti Kristu ayambaki bango, mpo na nkembo na Nzambe!

Liloba ya Greki ebongolami “koyamba” elingi koloba “kokutana”, “koyamba bato, na bolamu”, “koyamba na motema mobimba”, “kokoma mokangami”, “kozwa moninga”. Totika nzela te na bato mosusu to koyambaka moninga kozanga mindondo, koyamba mosusu, na motema mobimba, mpambampamba te.

Nzokande, motema na biso ezali kofungwama te mpo na bandimi oyo tozali kokutana, biloko oyo tozelaka epai na bango ezali, masengami oyo ezali na makanisi na biso! Na ndakisa tozali kolanda mitindo ya biblia mpe mpo na biso ebongi mpenza batosa mitindo yango, mingimingi soki bazali bakambi na kati ya ligomba!

Bokeseni: oyo ekoki kobismisa matata to kobakisa makambo mosusu

Mateya ya bomoi oyo Nzambe azali kopesa biso mpe tokanisaka ete Nkolo alendisi bango yango! Tozali kobosana ete Nzambe asalelaka makambo ya bomoi ya bandimi mpo na kosalisa bango bakola lisusu, mokomoko na lombangu na ye!

Kutu, bilikya na biso epai ya bandimi ya Eklezia ekumbaka biso ntango nyonso na kolemba nzoto. Mpo basali te oyo biso tozalaki kozela. Ndeti bazali na nyongo epai na biso, atako embombana na miso, kasi mpenza solosolo kati na motema na biso.

Motema oyo ekomi monene mpo na kosepela na bokeseni na biso 

Nzokande, soki totiki bolingo ya Tata esimba biso, tozali kososola ete Nzambe azali kopesa mokomoko lotoma mpe ntango ya bomoi mpo na konsantisama. Tozali kokutana na makambo mpe na bato bakopesa Nzambe libaku ya kotindika endimiseli na biso mpe kobongola biso. Nzambe azali kosalela bandimi ya eklezia na biso baoyo bakesena na biso mpo tokola lisusu na kosanktisama.

Soki tolingi kokoba kotambola na nz ela na bango, tozwi ekateli ya koloba: “Kosilisa mikano ya minene oyo omityeli!” mpe “Iyo! Na bolingo ya Nzambe ezangi masengisi!” Na kotikaka lisusu bolingo ya Nzambe esimba biso, tosengeli koyokana na Nzambe mokemoke. Tobandi kosanzola Tata na biso mpo na bandeko na biso mibali mpe basi mpe motema na biso ezali kofungwama.

Maloba ya Paulo na bakorinti, ezali koyokana kati na biso:

“Bozali na nkaka na kati na biso te, kasi bozali na nkaka nde na kati ya bolingo ya motema na bino moko” (2 Bakorinti 6:12)!

Mpe likambo oyo ezongelamaki mbala mingi, mpo na nkembo ya Nzambe!

“Sikoyo Nzambe oyo apesaka ezaleli ya koyika mpiko mpe libondisi asala ete na kati na bino bozala na makasi lokola oyo Kristo Yesu azalaki na yango, mpo, na bomoko mpe na monoko moko, bokumisa Nzambe mpe Tata ya Nkolo na biso Yesu Kristo” (Barome 15:5-7).

Mbuma ya mosala

Na yango, bokeseni ya mimesano, ya minoko, ya lolenge ya bomoi, ya mayoki, mpe bongo na bongo., ma mokuse, bokeseni ya bomoto na biso ezali mabaku ya kobakisama.

Soko tosololi mingi na Nzambe na biso ya bolingo, tokotonda ona bolingo na ye mpo na basusu…

Bokeseni na biso ememaka matomba mingi

Nzambe auali mpo na bino!

Bolekisa mokkolo malamu!

bokeseni-na-biso-ememaka-matomba
Le Tout-Puissant n'agit pas seul