Komitika na maboko ya Tata na biso ya lola

Litatoli ya Jess – 4
Lokola mwana moke

Ndeko na ngai ya mobali na mwasi na ye babotaki mwana mokolo ya liboso eleki. Afandi na kimya kati na maboko ya baboti na ye; azali komitika, azali komitika mpenza, mpo ayebi ete baboti na ye bazali kobatela ye mpe koleisa na kolatisa ye. Nalingi kosala makambo na lolenge esengeli na Nzambe, tata na ngai! Komitika, komitika na maboko na ye kotyelaka ye motema mobimba.

Komitika, kotika… oyo nde formasyo!

Kasi na mbula na ngai (41), ezali likambo monene, mpo makanisi na ngai ezali kokoba ntango nazali komona mokakatano to likambo moko ezali kokokisama ntango ozali kozela yango te to kolekana malamu te. Boye, ntango mopepe ezali makasi kati na bomoi na ngai, nazali koloba na mongongo makasi:

“Nazali komipesa epai na yo, Tata, yo moko ozali mokonzi, zala mokonzi ya bomoi na ngai, nalingi komipesa na yo, mpo oyebi mpenza mposa na ngai, mpe ntango na yango, mpe boye lisusu nde okoki kolakisa ngai ngolu na yo mobimba, motema mawa na yo mpe bolingo na yo nyonso. Nayebi na ntembe te ete nyonso ozali kosala ezali mpo na bolamu na ngai. Natondi yo, Tata, ozali kokokisa bamposa na ngai.” Jess

 

Komitika na maboko
ya Tata na ngai ya lola