Kofanda kimyía

Balobi na biso, kasi toyokaki eloko te

Esi nafanda na bisika makele ezalaki mingi. Makelele ezalaki mingi makasi nazalaki koyoka te makambu moto azalaki liboso na ngai azalaki kotambola na ngai.

Nazali na likoki ya kososola nsango moko?

Ntangu azalaki kotala ngai, nazalaki komona monoko na ye koloba, kasi nazalaki koyoka makambo azalaki koyebisa ngai te. Nameki mpenza kososola makambo azalaki koyebisa ngai…

Makelele mingi… na libàndà

Moyen ezalaki te pona biso tosolola. Makoki ata moko te po maloba na ye ekomela ngai.

Makelele… mpe lisusu na kati na ngai

Lisolo oyo muke ezali kolakisa ntango mosusu tolingi koleikisa ntango na Nzambe, nakotangaka Biblia, kasi tozali kokoka koyoka mongongo ya Nkólo te, mpo makele eleki mingi zingazinga na biso, mpe kati na biso: makanisi na biso ezali komemama, kopepa ndeti mopepe, tozali na makanisi mingi ya makambu eleka to makambu oyo ekoya. Makanisi eleki mingi! Mutu ebandi kosala pasi!

Nzambe alobaka na biso… Nazali na likoki ya kososola nsango moko?

Lisolo oyo muke ezali kolakisa ntango mosusu tolingi koleikisa ntango na Nzambe, nakotangaka Biblia, kasi tozali kokoka koyoka mongongo ya Nkólo te, mpo makele eleki mingi zingazinga na biso, mpe kati na biso: makanisi na biso ezali komemama, kopepa ndeti mopepe, tozali na makanisi mingi ya makambu eleka to makambu oyo ekoya. Makanisi eleki mingi! Mutu ebandi kosala pasi!

Nzokande Nkólo alingi kosolola na bana na ye. Kasi soki makelele eleki okoyoka mongongo na ye te. Yango nde Yesu alobaki:

“Nzokande, yo ntangu ozali kobondela, kóta na eteni ya kati ya ndako na yo mpe nsima ya kokanga porte na yo, bondelá Tata na yo oyo azali na esika ya kobombana; bongo Tatá na yo oyo atalaka na esika ya kobombana akofuta yo.” (Matayo 6.6)

Komitangola na bato mosusu…

Yesu azali kolendisa biso to bombana pona kokutana na Nzambe, mpe koyoka ye. Soki olingi kokutana na Nzambe esengeli kokanga porte pona koyoka makelele to mikrobe te. Esengeli omipesa mpenza, mpo na ntango na biso oyo kosengama to mitungisi eleki mingi!

Kolanda ndakisa ya Yesu…

Yesu ye moko mbala na mbala azalaki kokende kovanda na Tata na ye. Nzambe alingi mpe tolekisa ntango ya motuya na ye ndeti ntango Yesu azalaki kolekisa na Tata na ye.

Ndé lelo nazali kolendisa yo otia molende mpona makambu ezali mpenza na motuya, mpe kofanda kimyá, na nsima na yango kolekisa ntangó na Nzambe. Mpo tozali bana na Nzambe toyokaka ye ntango alobelaka biso. Yesu alobaki:

“Bampate na ngai bayokaka mongongo na ngai, mpe na yebi bango. Mpe elandaka ngai” (Yoane 10.27)

Tomi isoler po toyoka Nzambe alobaka na biso.

Na batango ya esengo mingi oyo tolekisaka

Ezali malamu kolona to kokolisa kofanda na biso na Nzambe.Kofanda ntangó moke lisanga na Nkoló ezali kitoko! Ozali koyoka Nzambe, azali kopesa yo kimyiá, mpe bozali kosolola. Ozali kosimba Nzambe, yepe lokola. Bolingo na ye ezali kozongisa bomoi na yo, kolendisa, kopesa yo makasi, kokebisa, kopamela yo na ndenge ya malamu, kondimisa, kopambola, kotyia yo na molimo, komonisa yo makambo ya molimo. Na ntangó ya boyokani (bondeko) okosenga lisalisi na ye; mpo akumba yo.

Ezali mpenza esengo koyoka Nzambe oyo ya bomoi azali koloba lisusu lelo!

Ngolu na Nzambe ezali na bino, baninga!

Bolekisa mokolo malamu!