Botondi

Na bolenge na bango, baklistu mingi bayekoli loyembo oyo elobi boye:

«Talela mapamboli ya Nzambe, tyia yango nyonso liboso ya miso na yo, okomona, na losambo, tala boni ezali na motuya.»

Matondo mingi uta na nse ya mbebu na ngai?

Mokolo moko, namonaki ete nazalaki koloba maloba oyo kasi motema na ngai ezalaki esika mosusu. Nazalaki kopesa «matondi», mingi koleka mpo na bokonde koleka kolanda bososoli ya ebele ya bokebi malamu ya Nzambe epai na ngai. Nazalaki ndeti elenge mwasi moko oyo azali kokanisa ete nyonso baboti basalaka mpo na ye ezali bongo.

Matondo mpo na boboto mingi

Nzokande, ntango tobandi kokanisa mapamboli na Nzambe, tozali komona ete ezali ebebele. Mpe tozali komona ete Nzambe akipaka biso mpenza na lolenge ya pete, sikisiki mpe malamu mingi. Mpe ata soki tozali kati ya mikkakatano, Tata na biso ya lola azali kobatela bana na ye. Ntango mosusu, ezwaka basanza to bambula mpo tomona boyangeli ya Nzambe mpe mbala boni azalki kokipe makambo na biso.

Ntina ya komonisa  botondi na biso epai ya Tata na biso ya Likolo

Na yango nasosolaki ntina ya koyebisa Nzambe botondi na ngai, ata na katikati ya makambo oyo ezali kobulunganisa mpe ya kobangisa.  Mosala oyo ya kondima ememaki ngai na kobongola lolenge na ngai ya kotalela makambo. Mosala oyo ya kondima yango nde ememaki bopusi na makambo ebele na bomoi na ngai.

Botondi mpe bondimi

Namonaki ete ezalaki na boyokani ya penepene kati na kozala na botondi mpe kotyela motema na Nzambe oyo ya bolingo, ayebi makambo nyonso mpe azali-na-nguya-nyonso.

Yasolo, soki toyekoli koyeba ndenge nini Tata na biso ya lola abatelaka biso, mingi koleka tozali koyoka bolingo na Ye mpe tokoki kopema, kotikela Ye mikkakatano na biso, totika komitungisa mpo na mokolo ezali koya…

Na mokuse tokoki kotika mpe kosepela na ntango ya sikawa na esika ya kotika mikkakatano ndenge na ndenge etungisa biso mingi. Yesu alobaki, na buku ya Matai 7:11:

« Yango wana , soki bino, atako bozali bato mabe, boyebi kopesa bana na bino makabo ya malamu, bongo Tata na bino oyo azali na likoló, akopesa te baoyo bazali kosenga ye biloko ya malamu koleka? »

Tata na biso ya likòlo azali na bolingo ezanga suka mpo na biso mpe azali kolakisa biso yango. Mutu na biso, bomoi na biso mpe makambo na biso nyonso ezali na maboko na ye.

Tomonisa botondi na biso

Boye nde, mabondeli na biso ya botondi esepelisaka motema ya Tata. Na ntango moko, mabondeli yango ezali komemela biso kimya mpe na kopesaka biso elikya mingi na Nzambe oyo azali kozinga biso na bolingo na ye na boboto!

Kotonda ye mpe kopambola ye, tozali na molende mingi oyo ezali kotombola biso likolo ya mikkakatano na biso mpe, na ntango moko, ekomisaka boyokani na Tata oyo ya likolo makasi. Oyo nguya na kati ya botondi mpe na kosanzola!

Nzambe, tata na yo, azali na yo elongo! Lekisa mokolo malamu!