Mabondeli oyo ezali komema libongoli ya bizaleli (2)

Komanyola, Litatoli

Mabondelioyo-ezali-komema-libongoli-ya-bizaleli
Na lifanlanse
Na anglais
alcool de riz
Le Tout-Puissant n'agit pas seul

Mabondeli oyo ezali komema libongoli ya bizaleli (2)

Litatoli ya Nicole

Mposa na ngai ezali makasi, kokende liboso elongo na Nzambe. Yango wana nabondelaki nsima ya kotanga Bagalatia 5.22-23:

Kasi mbuma ya Molimo ezali: bolingo, esengo, kimia, kokanga motema, bondeko, kosala bolamu, kondima, boboto mpe komipekisa” … mbuma oyo ezala mpo na nkembo na yo, Nkolo! »

Boye nde, ezalaki petee mpo na kobondela…nakokaki kokesenisa kozanga komipekisa na ngai… mabunga mikemike na komipekisa na ngai! Na ndakisa, Nayebi sikoyo nazalaki na momesano na telefone ya maboko mpe na shokola… Nkolo ayinaka telefone ya maboko te to shokola, kasi nakomaki moombo.

Kozala moombo? Kozala moombo ya eloko moko?

Bino bozali kotanga ngai, ntango mosusu bozali na bokakemi kati na nzoto na bino, moombo ya motema mpe makanisi; bozali moombo na komela likaya to ya bilangwiseli, to kobulunganisama na nzela ya masano, interneti, Facebook, biloko mosusu…

bokangemi na mimesano mabe, boombu, bizaleli ekomisaka moombo mpe kolekisa ndelo ya ndenge nyonso ezali kolakisa mintungisi. Bokoba te na makambo wana.

Litambe ya yambo mpo na mbongwana ya bizaleli

Esengeli na ebandeli KOYEBA koleka ndelo, nzela ya bokakemi to boombo. Yesu alobi:

« Baoyo bazali nzoto makasi bazalaka na mposa ya monganga te, kasi nde baoyo bazali na maladi » (Marko 2:17).

Komeka mbala na mbala kolonga na makambo ya mike

Ozali nzoto kolongono to oyebi ete ozali na mikakatano? Soki oyebi ete lolenge ya kotambola na yo ezali mabe, bokakatana te mpo na kokende koluka lisungi ya moto ya mayele na mosala mpo bolonga. Mpe lisusu, bobelela Nkolo oyo azali malamu na baoyo bazali kobelela ye, boluka ye malamumalamu.

Ezali mosala ya Molimo Mosantu kati na biso nde ebimisaka mbongwana ya bizaleli

Komipekisa kozanga kotungisama, tozwaka yango epai na Nzambe mpe tolongaka koleka ndelo na biso, na bapwazo, bokakemi na biso mpe boombo nyonso. Soki tosali elongo na ye, Molimo mosanto ekoki kosala kati na biso mpe kopesa bonsomi mokolo na mokolo. Bato mosusu komona mbangumbangu kosikolama, basusu bakosokolama mokemoke. Molimo mosantu ekobimisa mokemoke bizaleli ya Yesu Kristo kati na biso. Kobandaka mbongwana yango, tozali komonisa na bisika mingi mbuma  ya molimo mpe tokoloba elongo na Paulo:

« Ezali ngai lisusu te moto nazali na bomoi, kasi ezali nde Kristo moto azali na bomoi na bomoko na ngai »! Oyo maloba kitoko!

Mabondeli oyo ezali komema libongoli ya bizaleli

Nsuka ya nkoma yango

Soki bomoni boyokani na mayoki to bizaleli eleki ndelo mpe mpasi na makambo eleka, bokoki kozwa biyano ekomami na siti inerneti ebengami « Makoki ».

Bolamu ya Nzambe ezali ntango nyonso elongo na bino.

Lekisa mokolo malamu!