Nzambe asalaka na mozindo ya bomoi na biso (1)

Komanyola

Nzambe asalaka na mozindo ya bomoi na biso (1)

Zwá bikateli engebene mokano ya Nzambe?

Bandimi na Clistu oyo bazwi ekateli yakosalela Nkolo na motema na bango mobimba, batalema ndeti ba clistu malamu mpe soki elaka na mosala na bango elongi. Nzokande tobosanaka ete etaleli na biso ezali oyo ya Nzambe te.

Yasolo ekomami na kati ya buku ya Bagalati 2:20:

“Nabakami na nzete esika moko na Kristo. Ezali ngai lisusu te moto nazali na bomoi, kasi ezali nde Kristo moto azali na bomoi na bomoko na ngai.”

Elingi koloba ete Nzambe apesaka motuya na bomoi na biso na nsima misala na biso!

Nzambe alingi ete mondimi nyonso afanda na mbogwana ya oyo bôsólo, oyo ekomema ye lisusu akanisa ndeti Yesu, kozala na etamboli na elilingi ya Yesu. Ezali libongoli ya bomoto na biso, libongoli ya mozindo, oyo ekobota  mosala oyo ekongengisa Yesu.

Kozwa mikano engebene na lolenge na biso ya kala ya kokanisa?

Na molongó oyo ntoma Paulo alobi tobosana te mpona bomoto na biso ya kala, lolenge tokanisaka mpe tovandaka, ebakama na ekulusu na Christu mpe mposa na biso ya lokumu esengeli kozala ndeti Yesu. Esengeli to tika ye atondisa biso na bomoto na ye. Na sima na yango misala ekolanda mpe kotatola Nkoló.

Tozala ekenge yambo tobanda likambo: to tika ye abongola biso, na sima na yango to salela ye. Soki bomoi ya Nkoló oyo ebongolaka bomoto na biso ya molimo ezomonana te, tokanisa te ete misala na biso – ata ezali malamu – ekozala pona lokumu na Nzambe.

Mmbuma ya Molimo to kobimisama ya bato mpe ya bozalisi mpenza?

Kutu na makomi mosusu ya Biblia, Paulo alobi na bakorinti (Mokapo 3) ete misala nyonso ekoleka na moto pona kolakisa bonsolo na yango; mosala nyonso esengeli ewuta na molimo na Nzambe to ekozala eloko ewuti na misala ya bato? Ezali mpenza lituna ya mozindo.

Esengeli Tolanda Makanisi ya Nzambe, Botali na Ye

Soki tosungi bachrisu basosola emonaneli ya Nzambe, ya kondima yango ntango bazali komona bolingo na Nkoló, bakotalela biloko oyo ezali na motuya:

bakotalela kaka na Christo mpe bakotika ye ayeisa bango sika na mozindo ya bomoto na bango, yango ekomema mbogwana ya makanisi, mituna, bizaleli malamu, mpe bikateli na misala.

Boye makanisi ya Yesu-Kristu kati na bango, bakosalela ye na nsolo: misala na bango ekozala mpenza oyo Nzambe azelaka.

Nzambe asalaka na mozindo ya bomoi na biso

MARTIN BUEHLMANN

Nzambe azali na biso!

Bolekisa mokolo malamu!