Nzambe asalaka na mozindo ya bomoi na biso – 1

Komanyola

Nzambe asalaka na mozindo ya bomoi na biso – 1

Lisolo oyo ezali ya liboso kati na nsango mibale oyo Pasteur Martin Buehlmann akomaki.

Zwá bikateli engebene mokano ya Nzambe?

Bandimi na Klisto oyo bazwi mokano na molende nyoso kasalela Nkolo na motema na bango mobimba, bazali komimonisa na tango nyoso lokola baklisto malamu, na tango oyo bakomona mikumba na bango mpe mosala na bango bikozwa oyo ya motuya. Nzokande tojali kobosana ete kotala ndenge oyo  ya biso ejali mpenza ndenge ya Nzambe te.

Yasolo ete, ekomami na kati ya buku ya Bagalatia 2:20:

“Nasili kobakisama na ekulusu esika moko na Klisto. Boye, ngai na jali lisusu na bomoi te, kasi Klisto ajali na bomoi kati na ngai.”

Na ndenge mosusu elingi koloba ete Nzambe atalaka bizaleli na biso liboso ya misala na biso!

Nzambe asalaka na mozindo ya bomoi na biso

Elingi koloba ete

Nzambe apesaka
motuya na bomoi na biso
na nsima misala na biso.

Nzambe alingi ete mondimi nyonso na bomoi na ye ejala na mbogwana ya mozindo, oyo ekomema makanisi mingi mingi lokola Yesu, ekomema bomoi na ililingi ya Yesu. Ejali libongwama ya bojali, libongwama ya bomoto oyo ekobota mosala  oyo ekongengisa Yesu.

Kozwa mikano engebene na lolenge na biso ya kala ya kokanisa?

Na eteni oyo, ntoma Polo akanisi ete bijaleli na biso ya kala, lolenge ya kokanisa mpe ya kojala na bomoi, ebakamaki na ekulusu na Klisto mpe mposa na biso ya liboso esengeli ejala ya kokokana na Yesu mpe kotika ete ye moko atondisa biso na bomoto na ye, misala mikolanda mpe mikomonisa Nkolo.

Tomitika libogwama, mpe na sima tosala mosala

Tokotia naliboso na ngombe te oyo ye ngombe abendaka: Tomitika libogwama, mpe na sima tosala mosala. Soki  tomonisi bozindo ya mbogwama te na bomoto na biso, tokanisa te ete misala na biso – ata ezali malamu – ekozala pona lokumu na Nzambe.

Kutu na makomi mosusu ya biblia, Polo alobi na bakolinti (mokapo 3) ete misala nyonso ekoleka na momekano ya moto oyo ekotalisa bojalami na bozindo; na yango ekojala mpenza eloko ewuti na kati ya molimo na Njambe to ekojala kaka eloko oyo esalami na moto mpe mokili? Ejali motuna ya kososola makasi.

Mmbuma ya Molimo to kobimisama ya bato mpe ya bozalisi mpenza?

Kutu na makomi mosusu ya Biblia, Paulo alobi na bakorinti (Mokapo 3) ete misala nyonso ekoleka na moto pona kolakisa bonsolo na yango; mosala nyonso esengeli ewuta na molimo na Nzambe to ekozala eloko ewuti na misala ya bato? Ezali mpenza lituna ya mozindo.

Esengeli Tolanda Makanisi ya Nzambe, Botali na Ye

Soki tosungi bachrisu basosola emonaneli ya Nzambe, ya kondima yango ntango bazali komona bolingo na Nkoló, bakotalela biloko oyo ezali na motuya:

 

God works in depth Nzambe asalaka na mozindo ya bomoi na biso

Bakotala bobele Klisto mpe bakotika ye asala.

Oyo ya sika na bozindo na bomoto na bango, yango ekomema mbogwana na makanisi, na mituna, na oyo ya motuya mpe na mikano mpe na misala. 

Boye nde Yesu-Klisto akofanda na kati ya makanisi, bakosalela ye na nsolo: misala na bango ekozala mpenza lolenge oyo esengeli na Nzambe.

Nzambe asalaka na mozindo ya bomoi na biso

Pasteur MARTIN BUEHLMANN

Mpo na site internet ya viametanoia.com

Nzambe azali na biso!

Bolekisa mokolo malamu!

Kolanda

Nzambe asalaka na mozindo ya bomoi na biso – 2

Masolo ya mokomi moko

Na likambo nini esengeli na tala malamu mpenza