Kofulama
na nzela ya bililingi mpe na bafoto
(5)
5. Komipesa poison
to… kolimbisa?
Ee Nkolo Yesu,
Nasosoli ete na kolimbisaka te
Nazali komela poison
na kokanisaka ete bongo
Ezali mobomi na ngai nde akokufa!
Lelo,
Nayebi ete yo Nkolo olimbisa ngai mingi,
Nazwi ekateli ya kolimbisa.
Mpamba te na koponáká kolimbisa,
Namilongoli na bolɔkɔ moko
Oyo namikangamaki na kati.
Matondo mingi, Nkolo,
Mpo na bolimbisi na yo
Epai na ngai.
Ngai mpe, nazali kolimbisa
Baye basali ngai mabe.
Yango wana,
Namilongoli na minyɔlɔlɔ na ngai.
Oyo nde bonsomi!
Oyo nde kimya ya kati!
MATONDI, Nkolo Yesu!
Kolimbisa esalemaka
na motema na yo.
Oyo ekoki kozala ete likambo
yango ezali kosalema…
Kasi kebá!
Kolimbisa Elimboli TE:
1. Kotya ndanga na mabe oyo basali yo
2. Kondima kozongela misala oyo esalaki yo onyokwama
3. Kozala na bowangani mpo na oyo basalaki yo
4. kosalá lokola nde likambo moko esalemaki te
5. Kondimisa yo ete ezali mabe boye te
6. Kobosana
7. Kozongela boyokani yango atako ezali na ngenge
8. Kofunda te soki basaleli yo mabe.
Kolimbisa ezali mokano
ya motema oyo ezali
kokangola yo na kati,
na moto oyo asali yo mabe.
Mpe soki tonyokwamaki na likambo moko ya mabe?
Soki basaleli yo makambo na ndenge ya mabe, ekoki kosenga ete oyebisa yango, esambisama mpe ekweisama na tribunale ya bato. Kasi esengeli koyeba ete soki bafundi moto, enqueti mpe bamemi likambo na tribunale ekoki kozwa bambula mingi mpo bayeba mbeba yango, esambisama mpe bakatela etumbu. Esengaka makasi mingi epai ya moto oyo azwi mpasi.
Mpe soki mbeba esalamaki na kati ya libota, esalemaka ete moto oyo ayei na likambo yango, bakoki kokima ye na libota, bakoki kotelemela ye… komema ye na kokutana na mpasi ya sika… Boniboni asengeli kosungama na milende na ye mpe kozingama na bato oyo atyelaka motema…
Bobele na ntango yango, moto oyo azwi mpasi azali na mposa ya lisalisi mpo na kotambola kati na motema na ye.
Kolimbisa ememaka kimya ya kati.
Mpo na koyeba makambo mosusu:
Bolimbisi liziba ya bonsomi
Botángi ya Biblia mpo na pɔsɔ ya pɔsɔ:
Mat. 6:12 Baebre. 12:14 Mat. 18:21